Senga Lisungi na Makambo ya Mibeko
Mokanda oyo ezali mpo na komema kelasi na makambo ya kobuka makoki ya bana mboka oyo esalemaki na Maine. Soki ozali koluka lisalisi na état mosusu, tosengi na yo oluka ebongiseli ya ACLU ya esika yango awa.
Tosengi yo otondisa formulaire oyo mobimba, na ndenge nyonso oyo okoki.
Lokola tozwaka masengi mingi ya lisalisi, tokoki kondima kaka mwa ndambo moke ya ba dosye. Kino ACLU ekondima kozwa dosye na yo, yo moko nde ozali na mokumba ya kotosa bantango nyonso oyo mibeko epesi mpo na kofunda, mpe mikolo mosusu nyonso ya suka oyo ekoki kotalela mpenza likambo na yo. Soki ozali na mitungisi mpo na bantango oyo mibeko epesi mpo na kofunda, to soki omoni ete dosye na yo esengi kotalelama nokinoki, okoki koluka toli epai ya avoka mosusu.
LIKEBISI: Soki ozali na nse ya mbula zomi na misato (13), tolingi TE kozwa bansango na yo moko, mpe osengeli te kopesa biso yango.
